Luke 23

Yesu asambi liboso ya Pilato mpe Erode

(Mt. 27.2,11-34 ; Mk. 15.1-5 ; Jn. 18.28-38)

1Bongo bato nyonso ya likita batelemaki mpe bamemaki ye epai ya Pilato. 2Kuna, babandaki kofunda ye :

—Tokutaki moto oyo azalaki kokotisa mobulu na ekolo na biso : azali kopekisa ete bato bafuta mpako ya Sezare te, mpe azali komibenga Kristo, Mokonzi !

3Bongo Pilato atunaki Yesu :

—Ozali Mokonzi ya Bayuda ? Yesu azongisaki :

—Yo moko olobi yango !

4Bongo Pilato alobaki na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato :

—Namoni mabe moko te na moto oyo !

5Kasi bango batiaki mbamba mpe balobaki :

—Azali kotombokisa bato na Yudea mobimba na mateya na ye Abandaki na Galileya mpe akomi tii awa !
6Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galileya. 7Awa ayokaki ete Yesu azali Moto ya mboka oyo ya Erode, azalaki koyangela atindaki ye epai ya Erode, mpo na mikolo wana Erode azalaki na Yeruzalem.

8Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu ; pamba te, banda kala azalaki koluka komona ye mpo ayokaki basango na ye mingi penza. Mpe atiaki elikya ete Yesu akosala likwamisi na miso na ye. 9Atunaki ye mituna mingi penza, kasi Yesu azongiselaki ye eyano te.

10Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki wana mpo na kofunda ye na kanda penza. 11Bongo Erode na basoda na ye bazalaki koseka mpe kotiola Yesu. Balatisaki ye elamba ya kitoko penza mpe bazongisaki ye epai ya Pilato. 12Erode na Pilato bazalaki banguna, kasi banda mokolo wana, bakomaki baninga.

Bakateli Yesu etumbu ya liwa

(Mt. 27.15-26 ; Mk. 15.6-15 ; Jn. 18.39-40 ; 19.4-16)

13Pilato abengisaki bakonzi ya banganga-Nzambe, bampaka ya Bayuda, mpe bato, alobaki na bango : 14—Bomemelaki ngai moto oyo, mpe bofundaki ye ete azali kotindika bato mpo batomboka. Nzokande natunaki ye ngai moko liboso na bino, mpe namoni na ye ata mabe moko te na oyo bofundelaki ye. 15Erode mpe amonaki ata mabe moko te na ye, yango wana azongisi ye epai na biso. Ya solo, moto oyo asali mabe ata moko te mpo azwa etumbu ya liwa. 16Yango wana, nakobetisa ye bafimbo mpe nakotika ye.

17[Na feti nyonso, Pilato asengelaki kobimisela bango moto moko ya boloko
Mikanda mingi ya kala ezangi verset oyo.
.]

18Bongo bato nyonso bagangaki nzela moko :

—Boma ye ! Tikela biso Barabasi !

19Barabasi akotaki na boloko mpo abimisaki mobulu na vile mpe mpo abomaki moto.

20Pilato alobaki lisusu na bango, pamba te azalaki kolinga kotika Yesu, kasi bango babandaki koganga lisusu :

21—Baka ye na ekuruze ! Baka ye na ekulusu ! 22Pilato atunaki bango lisusu mpo na mbala ya misato :

—Mabe nini ye asali ? Namoni ata mabe moko te na ye mpo azwa etumbu ya liwa. Nakobetisa ye bafimbo bongo nakotika ye akenda.

23Kasi lokola bazalaki kaka koganga makasi mpo na kosenga liwa na ye na ekulusu ; suka na yango, koganga na bango elongaki.

24Bongo Pilato azwaki mokano ete basalela bango ndenge bazalaki kosenga. 25Atikaki moto oyo bango basengaki, oyo akotaki na boloko mpo na mobulu abimisaki mpe mpo abomaki moto. Bongo apesaki bango Yesu mpo basala ye ndenge bango moko balingaki.

Liwa ya Yesu

(Mt. 27.32-44 ; Mk. 15.21-32 ; Jn. 19.17-22)

26Tango bazalaki komema ye, bakangaki Simon ya mboka Sirene, oyo awutaki na bilanga, mpe batindaki ye na makasi mpo amema ekulusu, sima ya Yesu. 27Bato ebele penza bazalaki kolanda ye, elongo na basi oyo bazalaki kolela, mpe komitungisa mingi penza mpo na ye.

28Kasi Yesu abalukaka epai na bango mpe alobaki :

—Basi ya Yeruzalem, bolela mpo na ngai te kasi bolela mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
29Pamba te, mikolo ezali koya, oyo bakoloba : “Esengo na basi oyo babotaka te, mpe baoyo babota te mpe baoyo bamelisa bana mabele te !” 30Bongo bakobanda koloba na bangomba ya minene : “Bokweyila biso !” mpe na bangomba ya mike : “Bozipa biso !” 31Pamba te, soki basali makambo ya boye na nzete ya mobesu, bongo bakosala nini na nzete ya kokawuka ?

32Bamemaki mpe bato mibale elongo na Yesu ; oyo bazalaki batomboki, mpo baboma bango elongo na ye.

33Tango bakomaki na esika oyo babengaka : “Mokwa ya motu”, babakaki Yesu wana, elongo na miyibi : moko na loboko ya mobali mpe mosusu na loboko ya mwasi.

34Yesu alobaki :

—Tata, limbisa bango, mpo bayebi te likambo bazali kosala
Mikanda mingi ya kala ezali na verset oyo te.
.

Mpe mpo bakabola bilamba ya Yesu, babetelaki yango zeke.
35Bato batelemaki wana mpe bazalaki kotala. Bongo bakonzi ya Bayuda bazalaki koseka, mpe koloba :

—Ye moto azalaki kobikisa bato mosusu, amibikisa ye moko soki azali Kristo, Moponami na Nzambe !

36Basoda mpe bazalaki koseka ye. Bapusanaki mpe bapesaki ye vino ya ngai ; 37bazalaki koloba na ye :

—Soki ozali mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !

38Na ekulusu, likolo ya motu na ye, bakomaki na mwa libaya moko : “Oyo azali Mokonzi na Bayuda”. 39Motomboki moko oyo babakaki na ekulusu azalaki koloba boye mpo na kofinga ye :

—Boni, ozali Kristo te ? Mibikisa yo moko, mpe bikisa biso !

40Kasi motomboki oyo mosusu apamelaki ye :

—Boni, ozali kobanga Nzambe te, pamba te ozwi etumbu moko lokola ye ?
41Biso, etumbu na biso ezali na nzela penza ; pamba te tozali kofuta mabe oyo tosalaki ; kasi ye asali ata mabe moko te !

42Bongo alobaki na Yesu :

—Okanisa ngai tango okoya na Bokonzi na yo !

43Bongo Yesu azongiselaki ye :

—Nalobi na yo ya solo, lelo oyo, okozala elongo na ngai na Paradiso !

(Mt. 27.45-56 ; Mk. 15.33-41 ; Jn. 19.25-30)

44Pene-pene na ngonga midi, molili ezipaki mokili mobimba mpe yango ewumelaki kino na ngonga misato ya pokwa. 45Moi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Ndako ya Nzambe epasukaki na kati-kati. 46Bongo Yesu agangaki makasi penza :

—Tata, nazongisi molimo na ngai na maboko na yo ! Sima ya koloba maloba wana, akufaki.

47Tango mokonzi ya basoda ya Roma amonaki ndenge makambo yango esalamaki, akumisaki Nzambe mpe alobaki :

—Ya solo, moto oyo azalaki moto na sembo !

48Tango bato nyonso oyo basanganaki wana mpo na kotala ndenge makambo ekoleka, bamonaki makambo oyo ewutaki kosalama, bazongaki na mawa monene. 49Baoyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki ye banda na Galileya, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala makambo nyonso ndenge yango ezalaki kosalama.

Bakundi Yesu

(Mt. 27.57-61 ; Mk. 15.42-47 ; Jn. 19.38-42)

50Moto moko kombo na ye Zozefi, azalaki moto ya likita ya Bayuda ; ye azalaki moto malamu mpe moto na sembo. 51Aboyaki mokano ya bampaka mosusu ya likita mpe makambo oyo basalaki. Azalaki moto ya Alimateo : vile ya Yudea, mpe azalaki kozela bokonzi ya Nzambe. 52Akendaki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato. 53Akitisaki yango na ekulusu, alingaki yango na dra ya lino, mpe atiaki yango na lilita moko oyo batimolaki na kati ya libanga ; mpe moto ata moko te naino akundamaki na yango. 54Ezalaki Mokolo ya komilengela, mpe saba elingaki kobanda. 55Basi oyo bayaki na Yesu wuta na Galileya balandaki Zozefi, batalaki lilita mpe bamonaki ndenge batiaki nzoto ya Yesu. 56Sima bazongaki epai na bango, mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Bongo na mokolo ya saba, bapemaki, ndenge Mobeko ezalaki kotinda.
Copyright information for LinMNB